Canalblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog
Publicité
Vova dia Kongo
1 septembre 2008

Miyeba! Mpangi ya munu! Tika Bompaya!

Yo Kongolais to pe yo mpangi Ne-Kongo, miyeba soki oza nani!
Mibimisa na bohumbu, pesa lokumu na bonkoko mpe bankonko na yo.
Banda na nkombo na yo, longola ba nkombo ya bampaya, po bango bazuaka ya yo te, mpe bakotikalaka ata mokolo moko te kozua nkombo na yo to pe ya bankoko na yo!

Yo omibengaka "Robert", "Desire" to "Joseph", ti otambolaka mikili ya ba bampaya, mokolo nini osi okutana na mopaya ya mondele na kombo ya "Moseka" to "Mujinga" to pe "Matondo"? Mokolo nini okoma na mboka mopaya omoni kombo na yango "Matadi" to "Kipushi"?
Mokolo nini okenda na mboka ya bampaya mpe okuti bango bazali kosolola na "Lingala", "Swahili", "Tshiluba" to pe "Kikongo"?

Biso bana ya Kongo esengeli to miyeba nani tozali pe tomipesa lokumu. Lolendo na biso ewuta na bomengo ya bonkoko na biso. Tobanda kozengela bonkoko na biso, topesa bana na biso pe ba mboka na biso ba kombo oyo ewuti na bonkoko na biso. Nini yango tozali kaka kopesa lokumu na bampaya

Ya liboso: ba kombo na biso ezala ya ba koko na biso; Ezala ba kombo ya ba mboka, ba bala-bala to pe ya bisika pe ya bato.

Ya mibale: tolongola lokoto ya bampaya na esika ya lokumu na mboka na biso. Minoko to pe ba ndinga ya lokumu ya mboka esengeli kozala ba oyo mineyi tondima: Lingala, kikongo, kiswahili na tshiluba. Bankasa nioso ya mboka, kobanda na misala ya leta esengeli esalemaka to pe ekomamelaka na minoko ya mboka kaka. Ba nsi-nkanda, to pe biteyelo nionso ya mboka esengeli baloba kaka minoko ya mboka. Bana nionso basengeli bayekola minoko oyo mineyi ya mboka. bakonzi ya biteyelo basengeli kofungola ba kelasi pona bato bakende koyekola minoko oyo mineyi.
Mokonzi moko te akoki koloba monoko ya bampaya soki azali kotambola na nkombo ya mboka. Neti tomonaka bakonzi misusu basalaka (ata bayebi anglais, to francais, bakonzi ya Russie balobaka kaka monoko na bango). Na eteyelo na America to na France, batangisaka bana na monoko na bango ya mboka - to pe lingala na bango. Oyo ya biso bana baniokuamaka koyekola nanu monoko ya bampaya pe bakisa lisusu mateya na monoko yango. Minoko na bango moko bayebi ata malamu te. Ebongaki mwana nionso ayekola na monoko alobaka na ndako na bango pe na engumba oyo ye avandaka. Soki na Kongo Central, akoloba pe koyekola na kikongo, oyo avandaka na Katango to pe Kivu, na swahili, na Equateur to pe Kinshasa, ekozala na lingala, kuna na Kasai bakoyekola na Tshiluba.
Biteyelo nionso ya mboka ekotangisa ba lokoto ya Lingala, Kikongo, Tshiluba na Swahili pe muana nionso asengeli ayeba yango. Francais to Anglais ekozala bapona moko.
Anglais na Francais esengeli elongua na passeport pe mikanda nionso ya leta na biso. Lingala, Kikongo na Tshiluba esengeli ebakisama.

Ya misato: Mbongo ya mboka esengeli ezala na makomi na biso. Pona nini tozali kobenga mbongo na biso : "Franc Congolais"? Franc ewuti na France! topesa mbongo na biso kombo lokola NZIMBU to pe MBELA. LIKUTA pe ezali mabe te.

Lelo soki okeyi na poto, ata moto moko te akoboma nzoto na ye po aloba monoko na yo ya mboka, okosala makasi osolola na monoko na bango. Bango pe soki baye epayi na biso esengeli baloba minoko na biso to pe bazua bandeko na biso na misala ya kobangula minoko.

Lipanda ya solo nde wana.

Publicité
Commentaires
Publicité
Vova dia Kongo
Publicité