Canalblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog
Publicité
Vova dia Kongo
1 octobre 2008

RDC, Totika Kanda, Toluka Lobiko

Enfants_CongolaisTolimbisa bato oyo basala biso mabe, toluka kokende liboso na esika ete tolekisaka tango pe mayele na biso pona kokanisaka bango. Esengeli tyokombola mabe basala biso pe tobuaka yango na mayi, kasi tobosana te ndenge nini mabe yango esalamaki pona na mbala ya sima bakoka kosala biso yango lisusu te.
Leopold II, Stanley, Livingstone, Belgique, Kasa-Vubu, Mobutu, Kabila na Joseph Kabila Kabange; tobosani te na bato lokola ba Kengo na baninga na bango nionso oyo baniokolaki to bazali koniokola peuple ti lelo; TOLIMBISI BINO, BOZALA NA KIMIA ESIKA BOZALI.

Kasi biso peuple ya Congo esengeli tomitala po tomi yeba, tomitala po toyeba ndenge nini monguna ayingelaki o kati ya biso pe asili kopanza biso lokola ekolo ya singlasse. Tokoma biteni biteni, topanzana mokili mobimba.

  • Ya yambo esika nionso tozali, bana ya Congo toluka tozala liboke. Tosangana pe tomibatela pe tomisalisana. Soki oyebi esika congolais avandaka, luka ye pe yeba nini azali kosala. Luka po soki likambo to pe posa ya eloko, obanda nanu koluka epayi ya bandeko na yo. Soki bazali na yango te nde okeyi koluka libanda. Baninga nionso ya bikolo misusu basalaka be bongo. Soki ya ndeko na yo ezali mabe, lakisa ndenge nini akoki kobongisa pote mbala ya sima okoka kozua eloko ya malamu: kokima ye te pe kokende na mopanzi te pona kotongo to pe koseka ye.
    Yo pe ndeko soki balobeli yo obongisa, kosilika te pe kobengana baninga te po ezali pona bolamu ya lisanga. Tofungola matoyi pe toyokaka toli ya baninga. Mosapi moko epanguisaka elongi te.
  • Na oyo etali mboka na biso totika maloba ya mabe. Kofingana ezali na tina te pe ememaka be na bitumba. Toluka ndenge nini ya kosikola mboka na bosembo po peuple nde moto aponaka. Ata bakonzi basali matoyi mangongi, soki peuple atelemi, bakotika nzela. Kasi esengeli peuple ATELEMA LOKOLA MOTO MOKO. Kozela te baninga babunda ebongo yo oya kaka kotala. Ekosimba te! po esengeli moto nionso atia maboko.
  • Toluka information ya nini ezali koleka na mboka, totika kolekisa tango na masolo ezanga moto na makolo. Matongi ya pamba pamba, miziki na ba theatres ezala na tango na yango. Po yango ezali pona kosepelisa biso na tango ya bopemi, EZALA TONGO TI POKUA TE.  Yango biso topemaka 24 sur 24? Tango nionso kaka Koffi alobaki boye, Werra asalaki boye, Wemba azalaki kuna. Ebongo soki basali oyo bazali kosala ya yo nini? Wana ezali mosala na bango. Ya yo mosala wapi? Bakonzi ya mboka bakoma kotala biso pamba pona biso moko tomikitisa pe tomizongisa sima. Okokuta ba tata mibimba bazali kosuana pona oyo alobi ete motuka ya JB eleki ya Werra. Ebongo yo moto ozali kosuana motuka nini ozali na yango? Ata kinga ya pamba kutu nanu osomba te na bomoyi na yo mobimba. Mbeto ya pamba kutu ya matiti ozali na yango te. Olalaka na etoko, kasi olingi kaka otelemaka na ba coins kodistraire ba ndeko misusu oyo bazali kokanisa basala eloko pona lokumu ya ekolo. Tango yo ozolekisa ngona na yo na makambo ya bolole, bakonzi bazali koyiba pe kolekisa mibeko ya mabe oyo ezali kotekisa mboka, yo ozoloba eloko te.
  • Totelemela gouvernement po bazali bana misala na biso. PEUPLE NDE MOTO ZALAKI MOKONZI,  bango bazali BANA BITINDA NA BISO!!!  Biso nde topesi bango nzela ya kosalela biso. YANGO TINA TOVOTAKI BANGO!!!  Soki mosala bazali kosala ezali malamu te TOZALI PE NA KIMONKONZI YA KOLONGOLA BANGO NA ESIKA TOTIAKI BANGO!!! Ndeko kobanga leta te! LETA EZALI YO, NGA, BISO BANSO! TOFUNGOLA MISO PE TOMIYEBA.

TOLINGA MBOKA NA BISO, TOMILINGA, PE TOMIYEBA NANI TOZALI.

Kasi kolimbisa yango elakisi te ete tondimaka kaka bozoba ya ba mindele ba yelaka biso. TOZUA YA MALAMU, OYO EZALI KOBAKISA NA BOLAMU NA BISO, kasi toboya ya mabe. Congolais akoki kobeta moninga na ye congolais masasi te, totika kobomana.

  • Yo soda, sokoto, mandoki mpe bilia na yo esombamaka na mbongo ya mpaku peuple afutaka leta; okobeta pe koboma ye pona nini? Ba politiciens te bato bafutaka yo, company nini batonga na mboka oyo ekotiselaka bango mbongo? Basala ba usines te, mbongo yo na muasi pe bana na yo boliaka ewutaka na mabenga ya ba civils po bango nde bafutaka mpako. Mpako = Impot = ba tickets oyo ba mamas bafutaka na zando tongo nionso, mbongo ba ba quittances nionso oyo efutamaka na matadi, to pe ba bureau nionso ya leta pona kosunga misala ya leta. EBONGO YO SODA TO POLICIER TO PE YO MOTO YA ANR, OKONIOKOLA MOTO AFUTAKA YO PONA NINI? Soki oza na posa ya koniokola moto, niokola mokonzi oyo peuple atie na mosala pe azali kofuta mbongo kasi azali kosala eloko te.
  • Yo ministre: ozali kotambola na mercedes 4x4, ozali komata mpepo pe kolala na ndako ya malonga kuna na mbinza. Okanisi mbongo wana lokola eza ya cooperation Belge to pe ya wapi ezali ya peuple te? Ozali komikosa, ozali KOYIBA MBONGO YA MONDELE TE,KASI OZALI KOYIBA NDE MBONGO YA PEUPLE.  MOKONZI NA YO YA YAMBO, MOTO AZUA YO NA MOSALA. Okanisi Kabila nde Nzambe na yo? Lokuta! Nzambe na yo esengeli ezala PEUPLE po ye nde moto akofuta niongo ya mbongo nionso oyo yo ozali koliya. Mbala boni osi omona mokonzi moko abimisi mbongo na libenga na ye pe afuti leta? Nionso kaka ewutaka na libenga ya peuple. 
  • Yo depute to senateur: peuple aponi yo pe avandisi yo na kiti ya bokonzi. okomi kuna obaluki pe obosani mingongo oyo ekotisaki yo na palais du peuple. Okomi kolanda president to ba mindele po bapesaka yo mbongo ovotaka mibeko ya mabe pona koniokola peuple to pe po okanga miso na mabe ya gouvernement. OBOSANI ETE PEUPLE ATIAKI YO KUNA PO OTIA MISO NA MOSALA YA GOUVERNEMENT PO ETENGAMA TE. OTIKI NA YO PEUPLE PAMBA PO OLANDI MOSOLO. YEBAKA ETE MANDAT PE ESILAKA, OKOZONGA KAKA LIBOSO YA PEUPLE.
  • Bino ba Zuzi ya ekolo: bino nde bokaki kotanga mibeko pe kosalela yango. Bokoma na bino ba baba, bozali kobanga balongola bino misala. Bomonaka baninga na bino ya ba mboka misusu te? bolandaki pakistan? BOZALA NDE NEUTRES, ET INDEPENDENTS,  bakonzi oyo bino bozali kobanga po bapesaka bino mua ba makuta ya mike mike bakokoma kobanga bino pe bakopesa bino lokumu pe mboka ekotambola malamu.
  • Bino ba opposants, bosala opposition na ndenge ya malamu. Botika kofinga pe kopanza ba sango ya lokuta. Soki olobi likambo, meka kopesa ba peleve po ezala polele. Ezala te botiaka kaka molunge soki bozali libanda. Tango bakobenga yo butu butu pe bakabeli yo mosolo to pe bapesi yo ebonga obaloli kazaka okomi kobimisa ba secrets ya baninga, na ya solo na ya lokuta. Obosani maloba yo moko obimisa na monoko na yo. OKOMI NA PHILOSOPHIE YA : TOUR NA NGA PE NAMIKANISA PE NALIA NGA NA FAMILLE NA NGA.

MOTO NA MOTO ASALA MOSALA NA YE NA NDENGE ELONLONGOBANI, KIMIA EKOZONGA NA MBOKA PE MOSALA EKOKENDE LIBOSO.
CONGOLAIS TOTIKA EGOISME, TOKIKA KOKANISA KAKA PONA MINOKO NA BISO, TOKANISA PE BANA TOBOTA NA BA OYO TOBOTI NANU TE. BAKOLIA NINI, BAKOVANDA WAPI? BAKOZALA BANANI?

Publicité
Commentaires
Publicité
Vova dia Kongo
Publicité