07 mars 2009
Bato ya Lokuta
yango penza.
eloko moko il faut koyeba eza ke na politique, basi ya ndumba kutu baza tres fideles soki okokanisi bango na ba politiciens oyo bazali kokamba Congo. Basi ya ndumba pe bazali na bompeto mingi koleka bango. Bakambi ya mboka batonda mbindo.
Tala kaka lelo oyo babengi Joseph azobatela Bosco oyo azali criminel pe violeur. Niangalakata oyo asilisi bana ya Congo nakoboma pe basi ya Congo na kosambuisa.
Elakisi ke baza camp moko pe bazalaka na bango depuis kala. Lelo ebimi polele. Kokamua nini? Nkunda abelelaka ete azali Congolais, lelo tosuki wapi? Azali kobelela ete azali Rwandais pe abimisi carte d'identite na ye. Zoba nde congolais, azotala mais azomona te. President oyo Bosco atie na CNDP azali rwandais kutu carte d'identite na ye ezali numero 17645 esalamaki na le 23 juillet 1997 na Kacyiru. Avandaka na district ya Gasabo.
http://www.employmentlawalliance.com/en/Rwanda/Employment-Law-in-Rwanda
http://www.digitalcongo.net/article/56389
Vital azofuta buzoba na ye po tango afulaki Joseph ayebaki ke ezalaki kimoyibi na mokongo yaba congolais. Soki pe totali malamu bakosuana na bango ezalaka mingi mingi lokuta. Bazosala ba film pona ko distraire biso po tozalaka kaka na bohumbu.
A part Lumumba na Ne Muanda Nsemi, politicien ya solo oyo aza na souci ya peuple pe ya mboka aza te. Tout wana batikali balandaka kaka likonda. Ba opposant ya lokuta batondi mboka. Mosala na bango kocatalyser energie positive ya peuple pe ba combattants pona ko diminuer yango au profit ya bampaya oyo badominaka biso.
Bango tout bazali kaka ndenge moko. Kobanda na ba Mosengwo ti koleka na ba Tshisekedi. Mosala na bango kodoser nguya ya peuple pe kosilisa makasi na biso pe kolalisa biso mpongi.
Mosengwo:
Toboyaki ba election awa, nani asalaki declaration po bato bavoter ebele?
Na CNS, tokangaki Mobutu na maboko. Nani akataki biso matiti na se ya makolo?
Ye Kaka Mosengwo na ba 3eme voie na ye.
Tshisekedi:
Totika ba mposo ya ba nzoto na biso na rond point victoire, pe totangisa makila po aleka na CNS. Yankee atelemela nkasa likolo ya verbe. A provoka crise, pe espoir ya peuple elimwa. Apesa Mobutu avantage pe akotisa CNS mayi.
Aboya kimokonzi peuple apesa ye. Atalaka oyo moninga asala na Haiti pe azua mayele. Ba mbula pe esi epusani. Releve eza wapi?
Gizenga:
O ye moninga ya Lumumba, akoma kuna bakomisa ye torchon ya kopangusa makolo na nkoko na ye. Ayokisa ba lumumbistes soni. Akoka makambo te pe akosela bompaka makambo. Ye alia na ye pe abendani na mofuku ya mbongo pona ye na libata na ye.
Kengo:
Asalela nzambe na diabolo (Mobutu na Kabila) ayokaka na ye pe soni te azobaluka na ye na kin kuna peuple azo souffrir. Awela kokoma na Senat pona kosalela peuple te mais pona kobatela pouvoir ya mindele. Moninga na ye asala declaration , ata soki ezali theatre. Ebongo ye? Ba rwandais na ba ougandais bakotisi ba soda pe minduki, ye akosoli ata kokosola te. Pona ye tango mutete na ye ezokota aza ata na tina na biso te. Soki eyindeli bango nde bakomi koluka peuple to pe bato bayokela bango mawa.
Bemba:
akima kin alors que bato na ye bazalaki komener na terrain. Akenda kobatama na ambassade ya bampaya sans kutu kokanisa kopesa bato na ye ravitaillement. Suka suka basoda na ye masasi esila pe babunda na ba baillonettes, ba tolo-tolo pe mabanga. Basundola ba sokoto pe babongwana ba civils.
Lelo soki babimisi ye na CPI, si akokende kopema na Portugal. Kaka kowela titre ya chef de l'opposition pona mbongo kasi asalelaka yango ata mokolo moko te.
Ngbanda:
Ti lelo kaka maloba ata libanga ya pamba tomona esika bato na ye babamba moto te na kati ya Kin.
Bazolalisa biso mpongi, basalelaka bango nionso mokonzi moko: Mindele.
Colonel Fofe:
Awuti wapi? Nani asi amona video ya ba talibans te to pe ya al qaida "avant" operation esalema. Atombola mosapi soki azali! Moto te! Ba oyo ya biso, nanu kutu bobambi ata libanga moko te deja botondi na internet po boyebana! Action ata moko te. Kaka ko exposer bana ya bato oyo bazo soutenir bino. Wana eza kosalela monguna te?
Tomoni ba operations esalemi na India pe na Pakistan, mibali bakiti na terrain pe bapesi likambo na bango sima na yango pe baleki nzela. Bino kaka maloba na maloba.
Oyo ya biso mboka ezanga na yango opposition, ba leaders pe baza na bango te. Nionso batonda kuna baza na bango ba commercant balukaka baliela na sima ya peuple; bilanga na bango.
Haiti batelemela election na bango na ba leaders na bango, azua kimonkonzi, biso tokima totikela bampaya election;
Madagascar kutu, bourgmestre ya pamba azotelemela president, biso mibali mibimba kaka kolata maputa;
Zibambwe tomoni elombe atie mbamba ti pe alongi kokitisa mpeve ya president, biso kaka ba discours na libanda;
Guadeloupe, ba leaders ya syndicat batelemeli systeme pe balongi, soki biso nde balie na bango pe bavandi;
India na Pakistan, bilombe baye pe baloni mbuma na ndenge na bango. Non pas que tomoni yango malamu, kasi basali mosala na bango na ba convictions na bango pe na raison na bango. Basali mosala bakanaki pe batamboli. Biso kaka maloba na kopesa ba dates ya lokuta.
Tokanisaka pouvoir ezali lokola manga, tozali kozela etela pe na sima ekueya na mopepe?
Bapesaki biso le 4 janvier awa. Totali ti eloko te. Na bato bapesaki date yango, bavandaki na bango na ba ndako na bango bazali kozela peuple abima na bala bala po baboma bango na sima baya koganga po bazua profit ndenge bamesana na ba perdiem.
Tokomelaki misusu, bafingi fingi biso, balobi pouvoir etindi biso. Kiadi kibeni!
Omibengi leader kasi ozokoka ko assumer leadership ata moko te. Discernement kutu eza te. Mboka ekufa sik'oyo bakomi kokata yango biteni na biteni. Bango bazali kaka kozua mayele te. Toujours na mokongo ya bampaya. Mompaya nini akolekisa interets ya ba congolais avant oyo ya ye pe ya mboka na ye?
Tango peuple azolela, mompaya azali kolia ya ye na ya baninga na ye, na sima aliesi mboka na ye, mboka na ye eliesi baninga na ye, na baninga na bango, na sima bolole oyo akotisaki bango pe alie ba mike mike oyo etikalaki, na sima na ye pe baninga na ye pe ba malanda ngombe na ye pe balie ya bango.
Na suka, ata ndambo bakotika te pona peuple.
Solution: Botika buzoba bosala nde ba actions. Nga nalobeli bino polele. Ya nga mopanzi sango yano wana. Ya bino nini?
15 août 2008
Ces farceurs qui nous dirigent
La RDC est dirigee par des farceurs qui bien qu'ayant ete au pouvoir pendant plus de 40 ans, s'etonnent toujours de l'etat de delabrement dans lequel se trouve leur propre fief! Allez-y comprendre quelque chose!
Kengo wa Dondo ne sait il pas qu'aucune infrastructure n'a ete batie dans son fief depuis 1960?
Au lieu de jouer a l'"etonne" il ferait mieux de faire en sorte que son coin (ne fusse que ca) ait au moins le minimum d'infrastructure puisqu'un de ses fils a ete dans les rouages du pouvoir depuis 1960 jusqu'a ce jour.
Selon MediaCongoNet :
Mbandaka : en vacances parlementaires, Kengo déplore les conditions de vie au Nord-Ubangi Le président du Sénat, Léon Kengo wa Dondo, était en vacances parlementaires dans son fief électoral du Nord-Ubangi, dans la province de l’Equateur. A Mbandaka où son avion a fait une escale technique mercredi, il a déploré les conditions de vie des populations de cette contrée.Le président de la chambre haute raconte : « Que ce soit à Gbadolite, à Kotakoli, ou à Yakoma, ce sont les mêmes problèmes que j’avais trouvés et qui se sont peut être aggravés. Pas de routes, pourtant, la population a la volonté de cultiver et de vendre ses produits. Elle se décourage. De deux, tous les hôpitaux et centres de santé sont dépourvus de médicaments. Côté éducation, il n’y a pas de bancs, les enfants étudient à même le sol, les écoles sont complètement délabrées, les salaires de l’Etat n’arrivent pas ou arrivent incomplets et sans listings. Beaucoup de sous contrats et les sous statuts ne sont pas mécanisés. » Kengo wa Dondo a promis de faire rapport de son constat fait à la plénière du Sénat avant que le bureau de son institution ne le transmette au gouvernement central en vue des solutions. Mbandaka, 1/08/2008 (OKAPI, via mediacongo.net) | |

Le président du Sénat, Léon Kengo wa Dondo, était en vacances parlementaires dans son fief électoral du Nord-Ubangi, dans la province de l’Equateur. A Mbandaka où son avion a fait une escale technique mercredi, il a déploré les conditions de vie des populations de cette contrée.

