03 octobre 2008
Delestage des Congolais
NAni akokamba ekolo na bolamu. tala sika tokomikopalangana lokola tozanga ba soda. Sima ya delestage ya Kivu, lelo ekomi na Equateur. Kuna basili bongo kodelester 1200 personnes oyo bakeyi kobatama na Soudan. Sango yango epesami na molayi na Jeune Afrique.
01 octobre 2008
Ba FARDC bazolonga; kasi nini lisusu?
Afrique en Ligne akomi nkoma oyo pona koloba ete ba soda ya nkita na biso bazali kolonga etumba kuna na Kivu pe basili kotiya banguna na mikakatano. General Kayembe alobi ete akoki kosala bango (CNDP) pasi na ngonga nionso pe esika nionso bango babatami po basili kokoma na bokuse ya molayo ya mandoki ya bingambi ya FARDC.
Kasi nazali komituna pona nini kosilisa etumba yango te? Pona nini General Kayembe azali lisusu kosenga masolo na Nkundabatuare? Soki ya solo tozali kolonga, malamu tokanga moto oyo asili kobomisa ba millions ya bana, basi pe ba ndeko na biso pe kotiya ye na boloko. Pona nini kosenga ye aya tosolola? Ye asi aboyaki Amani, asi aboya koyingela na FARDC, pona nini tozali kaka kobondela ye?
Na esika wana bakonzi ya FARDC balakisa mua mayele na bango pe bakumba etumba ti na suka. Bayeba kaka ndenge nini bakoki kobatela ba civils, ezala ba civils na biso to pe bampaya oyo bazali bisika wana pe balandisa mandoki kaka na babundi etumba to pe basoda ya Kundabatuare.
Ezala te lokola ba mbula oyo eleka oyo tomona FARDC alongi, pe na sima akitisi maboko pe Nkundabatuare amatisi mapeka pe azongeli yahouli. Bino bakonzi boyeba ete ba soda oyo ya biso basili kotangisa makila pona ekolo ezali pona bino bokendaka kosolola na ba oyo babomi bango te po bobatelaka bango. Bolakisa kimobali na bino. Ya mbala oyo bokanga nde moto oyo wana ya matoyi mangongi pe likambo yango esila. Soki bozui ye, na tina pe ya kolekisa tango na ba AMANI ya tshanana ekozala te.
Wana nde General Kayembe okoki koloba ete ozali na controle ya Kivu. Soki te, ozali na yo kaka kosala theatre pe kotangisa makila ya bana mboka pona lokumu ya bampaya.
http://www.afriquenligne.fr/dr-congo-army-claims-control-of-kivu-province-2008100113147.html
22 septembre 2008
Toyoka Soni to Toseka/ Avoir Honte ou en Rire?
LINGALA (voir texte en Francais plus bas)
Yango toyoka soni to pe toseka? Soni po toza bana ya mboka oyo ba soda bayebi kaka konionga ba civils esika ya kolonga bitumba liboso ya banguna ya bampaya? Etmba moko te bazali kolonga kaka babotolaka bango biteni ya mboka tango inso. Kasi soki ekomi na tango ya konionga bana ya mboka, wana babimisi maseke nionso.
Tolela to toseka? Tolela na soni po tolonga tolinga te, ezali kosala biso pasi po ezali mabele ya bankoko na biso pe tokozalaka kaka bana ya mboka oyo ata ndenge nini.
Tala soni mingi pona kotanga ba sango ya motindo oyo Jeune Afrique awuti kokoma.
Balobi ete basoda na biso bazali ata kokoka elokomote, bango moko babandi bitumba kasi bazali kokota te , ekomi lisusu babombana na sima ya MONUC po babotola bango mua ba mboka oyo batikali na yango te.
MONUC akomi kobondela CNDP po alembisa moke pe atika bitumba pona tango moke.
FARDC ezali basoda ya ekolo, bango nde bakolo mabele, ndenge nini MONUC asolola na CNDP lokola soki bango nde bakolo mabele? Bazali komona FARDC ata tina te. Po bazali na bango ba soda ya mboka ya lokumu te. 12 ans bazokoka eloko te.
FRANCAIS
Devrions nous avoir honte ou en rire? Honte d'être des citoyens d'un pays ou les militaires n'excellent que dans les operations d'asservissement de la population civile alors que devant des envahisseurs etrangers ils concedent tout. Ils n'ont pas de victoire au combats et ne fant que ceder des immenses parties du territoire nationale aux etrangers. Pourtant en face des paisibles contribuables, quelle virtuosité aux maniement d'armes diverses? Des vrais commandos!
Devrions nous pleurer ou rire? Pleurons de honte car vouloir ou pas nous sommes concernés. Car ce pays nous appartient et a chaque fais qu'il saigne, nous saignons aussi en notre fort interieur.
C'est vraiment honteux de lire des articles du genre de celui publié par Jeune Afrique.
Nos militaires sont des bons a rien. Ils ont lancé une offensive qu'ils sont incapables de soutenir et voila qu'ils se cachent derriere la MONUC pour avoir la vie sauve apres avoir exposé celle des civils et maintenir leur positions sinon le CNDP les ravirait toutes.
La MONUC negocie avec le CNDP pour obtenir un cessez-le-feu. Quelle honte! Une armee d'un pays souverain ou la Monuc doit "negocier" avec des "insurgés" pour maintenir le status quo!!!!!
Les FARDC representent l'armée reguliere, pourquoi la MONUC traite avec le CNDP comme si il etait une armée reguliere du Congo? N'est-ce pas considerer les FARDC comme n'ayant aucune valeur a leurs yeux? 12 ans qu'ils n'ont pas repris un seul centimetre a l'ennemi a fait d'eux des invertebrés.
01 septembre 2008
Miyeba! Mpangi ya munu! Tika Bompaya!
Yo Kongolais to pe yo mpangi Ne-Kongo, miyeba soki oza nani!
Mibimisa na bohumbu, pesa lokumu na bonkoko mpe bankonko na yo.
Banda na nkombo na yo, longola ba nkombo ya bampaya, po bango bazuaka ya yo te, mpe bakotikalaka ata mokolo moko te kozua nkombo na yo to pe ya bankoko na yo!
Yo omibengaka "Robert", "Desire" to "Joseph", ti otambolaka mikili ya ba bampaya, mokolo nini osi okutana na mopaya ya mondele na kombo ya "Moseka" to "Mujinga" to pe "Matondo"? Mokolo nini okoma na mboka mopaya omoni kombo na yango "Matadi" to "Kipushi"?
Mokolo nini okenda na mboka ya bampaya mpe okuti bango bazali kosolola na "Lingala", "Swahili", "Tshiluba" to pe "Kikongo"?
Biso bana ya Kongo esengeli to miyeba nani tozali pe tomipesa lokumu. Lolendo na biso ewuta na bomengo ya bonkoko na biso. Tobanda kozengela bonkoko na biso, topesa bana na biso pe ba mboka na biso ba kombo oyo ewuti na bonkoko na biso. Nini yango tozali kaka kopesa lokumu na bampaya
Ya liboso: ba kombo na biso ezala ya ba koko na biso; Ezala ba kombo ya ba mboka, ba bala-bala to pe ya bisika pe ya bato.
Ya mibale: tolongola lokoto ya bampaya na esika ya lokumu na mboka na biso. Minoko to pe ba ndinga ya lokumu ya mboka esengeli kozala ba oyo mineyi tondima: Lingala, kikongo, kiswahili na tshiluba. Bankasa nioso ya mboka, kobanda na misala ya leta esengeli esalemaka to pe ekomamelaka na minoko ya mboka kaka. Ba nsi-nkanda, to pe biteyelo nionso ya mboka esengeli baloba kaka minoko ya mboka. Bana nionso basengeli bayekola minoko oyo mineyi ya mboka. bakonzi ya biteyelo basengeli kofungola ba kelasi pona bato bakende koyekola minoko oyo mineyi.
Mokonzi moko te akoki koloba monoko ya bampaya soki azali kotambola na nkombo ya mboka. Neti tomonaka bakonzi misusu basalaka (ata bayebi anglais, to francais, bakonzi ya Russie balobaka kaka monoko na bango). Na eteyelo na America to na France, batangisaka bana na monoko na bango ya mboka - to pe lingala na bango. Oyo ya biso bana baniokuamaka koyekola nanu monoko ya bampaya pe bakisa lisusu mateya na monoko yango. Minoko na bango moko bayebi ata malamu te. Ebongaki mwana nionso ayekola na monoko alobaka na ndako na bango pe na engumba oyo ye avandaka. Soki na Kongo Central, akoloba pe koyekola na kikongo, oyo avandaka na Katango to pe Kivu, na swahili, na Equateur to pe Kinshasa, ekozala na lingala, kuna na Kasai bakoyekola na Tshiluba.
Biteyelo nionso ya mboka ekotangisa ba lokoto ya Lingala, Kikongo, Tshiluba na Swahili pe muana nionso asengeli ayeba yango. Francais to Anglais ekozala bapona moko.
Anglais na Francais esengeli elongua na passeport pe mikanda nionso ya leta na biso. Lingala, Kikongo na Tshiluba esengeli ebakisama.
Ya misato: Mbongo ya mboka esengeli ezala na makomi na biso. Pona nini tozali kobenga mbongo na biso : "Franc Congolais"? Franc ewuti na France! topesa mbongo na biso kombo lokola NZIMBU to pe MBELA. LIKUTA pe ezali mabe te.
Lelo soki okeyi na poto, ata moto moko te akoboma nzoto na ye po aloba monoko na yo ya mboka, okosala makasi osolola na monoko na bango. Bango pe soki baye epayi na biso esengeli baloba minoko na biso to pe bazua bandeko na biso na misala ya kobangula minoko.
Lipanda ya solo nde wana.



